Lyrks
Lyrks
Lyrks
Cover Art

Kanga Nga Photo Lyrics by José Nzita

Kanga Nga Photo

0

Moto oyo!
Moto oyo azangelaka
(Iye lele)
Ye akufaka te
(Eê Kino ye)
Kino ye ako koma
(Iye lele)
Bongo nde ako kufa
Batekaki ye na ba ndeko na ye
Bayebaki tina te
Nzioka nde na kati na nzoto na ye promesse ezalaki
Tango nzala eyaki na mboka
Balukaki ya kolia
Bakendaki kogumbamela Joseph na mboka ezipito
Kasi bayebaki te wana leki na bango
Lisakoli ekokisami
Moto oyo!
Moto oyo azangelaka
(Iye lele)
Ye akufaka te
(Eê Kino ye)
Kino ye ako koma
(Iye lele)
Bongo nde ako kufa
Batindaki moto apakola mokonzi na ndako ya Isaï
Ba bimisi mibali bavimba ba pake
Mokonzi azalaki te
Ye wana na zamba azali kobima na solo ya ba mpate
Muana moke oyo David mokonzi
Lisakoli ekokisami
Moto oyo!
Moto oyo azangelaka
(Iye lele)
Ye akufaka te
(Ako kufa te, Kino ye)
Kino ye akokoma
(Akosimba)
Bongo nde akokufa
Lolenge moko pe Simeona
Azalaki na elaka
Ti tango akutanaki na mokonzi
Simeona akufaki
Ngai pe José na kokufa te
Kino nakomona'ango
Oyo Nzambe alobela ngai
Kino nakosimba’ango
Ngai José!
Ngai oyo nako kufa te
Kino nako mona ngo
(Oyo Nzambe aloba)
Oyo Nzambe alobela ngai
Kino nakosimba'ango
(Kanga photo)
Kanga photo
Mona ngai bien
Lobi okokamwa ngai
(Po ete na nzoto oyo)
Po ete na nzoto na ngai oyo etonda bisakoli
Alléluia!
Paroles: Que les saints disent amen!
Penina mpe asekaki mingi Anna
Mpo azangaki kobota
Kasi na tali na makomi na Nzambe
Namoni muana ya Penina te
Samuel ye wana nganga monene
Lelo tokumisaka Nzambe
Nionso oyo oza komona na bomoyi na yo lelo
Eza mpona kembo na Nzambe
Ngai José!
Ngai oyo nako kufa te
(Iye lele)
Kino nako mona ngo
(Oyo Nzambe aloba)
Oyo Nzambe alobela ngai
(Iye lele)
Kino nako simba ngo
(ôô kanga photo)
Kanga photo
Mona ngai bien
Lobi okokamua ngai
Mpo ete na nzoto na ngai oyo etonda bisakoli
Kobuaka te oyo afandi pembeni na yo
Mpo yebi nano te
Tango mosusu ye nde lipamboli na yo
Kobuaka ye nano te
Yo oyo babuaki
Kolela lela te
Loba kanga se photo
Bomba na ndako na yo
Obimisa lobi
Oko betela ngai maboko
Mpo oyo nionso baza koloba na bomoyi na yo
Mpo bayebi nano te
Ngai José!
Ngai oyo nako kufa te
(Iye lele)
Kino nako mona ngo
(Oyo Nzambe aloba)
Oyo Nzambe alobela ngai
(Iye lele)
Kino nako simba ngo
(ôô kanga photo)
Kanga photo
Mona ngai bien
(ôôêê)
Lobi okokamua ngai
(Mpo ete na nzoto oyo)
Mpo ete na nzoto na ngai oyo etonda bisakoli
Kosopa semi ya lipamboli na yo te
Mpo nano yo omoni te
Mpo tango mobali apesaki yo semi
Bozalaki se bino mibale
Eê kanga matoyi
Koyoka moto te
Oyo kaka se Nzambe
Mpo ye nde asimbi bomoyi na yo
Mpe na tango na maboko na Ye êê
Ngai José!
Ngai oyo nako kufa te
(Iye lele)
Kino nako mona ngo
(Oyo Nzambe aloba na ngai)
Oyo Nzambe alobela ngai
(Iye lele)
Kino nako simba ngo
(ôô kanga photo)
Kanga photo
Mona ngai bien
(Iye lele)
Lobi okokamua ngai
(Mpo ete na nzoto)
Mpo ete na nzoto na ngai oyo etonda bisakoli
Ko ko ko ko kumama
Aâ kumama
(ôlele)
Nzambe na ngai
(Olelele)
Mokokisi na elaka
Kumama kumama Yesu na bomoyi
Aâ kumama
(Iye lele)
Nzambe na ngai
(Olele)
Ozali na Yo Nzambe
Yembelaka Ye Nzambe oyo
Aâ kumama
(Iye lele)
Nzambe na ngai
(Olele)
Solo Yo obonguani te
Iye lele lele lele kumama kumama
Eê Nzambe oyo
Eê eza bongo
(Kanga photo)
Kanga photo
Ââ bomba yango

About “Kanga Nga Photo” by José Nzita

Read the complete lyrics to "Kanga Nga Photo" by José Nzita from the album "Kanga Nga Photo". On Lyrks you can follow along with the full text, explore the artist's discography, and discover related songs. The track is often categorized under Congo, Gospel, Pop.

"Kanga Nga Photo" is performed by José Nzita. from the album "Kanga Nga Photo" This page provides the full lyric text for fans who want to sing along, study the songwriting, or compare versions across releases. Lyrks organizes lyrics by artist and song slug so you can bookmark and share a stable URL. Music lyrics help listeners connect with emotion, narrative, and rhythm in a track. Whether you are learning English, researching a favorite chorus, or preparing for karaoke, having accurate line breaks and section labels (verse, chorus, bridge) makes the experience easier. We link to the official artist profile on Lyrks where available, including biography snippets, top songs, and chart placements when we have that data. If you enjoy "Kanga Nga Photo", explore more songs by José Nzita using the links below. Chart and trending pages on Lyrks highlight what listeners are searching for this week. For copyright or correction requests, see our DMCA and contact pages.

View all songs and biography for José Nzita · Trending lyrics · Billboard Hot 100

Frequently asked questions

"Kanga Nga Photo" is credited to José Nzita. Songwriting credits may include additional writers listed on the release; check the credits section on this page for linked collaborators.

"Kanga Nga Photo" appears on "Kanga Nga Photo".

Visit the José Nzita artist page at /artist/jose-nzita for biography, popular tracks, and links to more lyric pages.