Lyrks
Lyrks
Lyrks
Cover Art

Moyi etelemi Lyrics by José Nzita

Kanga Nga Photo

0

Pona ngai moyi etelemi
Pona Congo moyi etelemi
Lokola Josué bandeko atelemisaki moyi
Ati tango bitumba na ngai ekosila
Wana nde moyi na nga ekotambola (2 fois)
Ata eyindeki ngai
Ata elekeli ngai
Nakobanga na nga eloko te
Oyo akela ngai azali na bomoyi
Oyo apona ngai ayebi nga malamu
Yango nakobanga te ngai nakobanga te
Nakobanga te Nzambe na nguya
Moto te na se akobangisa ngai
Mpo nayebi oyo aza kati na nga
Aleki biloko nyoso na se na nguya
Kolemba nzoto te moninga
Kobangabanga te moninga
Tozali kokima mbangu na montre ya Nzambe
Kasi na montre ya bato ya mokili te
Ezali lokola nde moto kobeta na terrain (2 fois)
Moto na moto akoki mpe kozala na siflet na ye
Kasi siflet oyo bato batielaka miso
Ezali siflet ya arbitre oyo aza na kati ya terrain
Soki asiffler te match ekosila te oh (2 fois)
Arbitre ya bomoyi nde Yesu mwana na Nzambe
Ye nde ayebi tango nini match ekosila
Elonga na nga elonga na nga
Elonga na ngai azali
Nakobanga na nga eloko te
Akotika ngai te na yo na soni liboso ya banguna na ngai
Akozala na ngai kino na suka
Moto ole na moto na nga
Bartimé mpe atelemisaki moyi
Bartimé mpe atelemisaki moyi
Atamboli na nzela ayoki mokonzi aza koleka
Agangi fils de David ''Aie pitié de moi''!
Bato bagangeli ye ''Yo, Kanga monoko na yo'' (2 fois)
Yesu abaluki atali boye mpe alobi
Yo mwana na Timé nasala na yo nini
Yo fils de Timé nasala na yo nini
Nalingi namona (4 fois)
Elonga na ngai azali
Nakobanga na nga eloko te
Akotika ngai te na yo na soni liboso ya banguna na ngai
Akozala na ngai kino na suka
Moto ole na moto na nga
Soki Bartimé alandaki maloba ya bato
Mbele miso ya Bartimé elingaki komona te
Soki Bartimé alandaka maloba ya foule
Mbele miso ya Bartimé elingaki komona te
Soki oza na likambo luka basali na Nzambe
Kota na chambre na yo tia mabolongo na se
Buaka miso likolo otelemisa moyi
Bongo soki moyi atuni yo nasala na yo nini
Nalingi namona (4 fois)
Elonga na ngai azali
Nakobanga na nga eloko te
Akotika ngai te na yo na soni liboso ya banguna na ngai
Akozala na ngai kino na suka
Moto ole na moto na nga
Il est Saint, Jésus

About “Moyi etelemi” by José Nzita

Read the complete lyrics to "Moyi etelemi" by José Nzita from the album "Kanga Nga Photo". On Lyrks you can follow along with the full text, explore the artist's discography, and discover related songs. The track is often categorized under Pop.

"Moyi etelemi" is performed by José Nzita. from the album "Kanga Nga Photo" This page provides the full lyric text for fans who want to sing along, study the songwriting, or compare versions across releases. Lyrks organizes lyrics by artist and song slug so you can bookmark and share a stable URL. Music lyrics help listeners connect with emotion, narrative, and rhythm in a track. Whether you are learning English, researching a favorite chorus, or preparing for karaoke, having accurate line breaks and section labels (verse, chorus, bridge) makes the experience easier. We link to the official artist profile on Lyrks where available, including biography snippets, top songs, and chart placements when we have that data. If you enjoy "Moyi etelemi", explore more songs by José Nzita using the links below. Chart and trending pages on Lyrks highlight what listeners are searching for this week. For copyright or correction requests, see our DMCA and contact pages.

View all songs and biography for José Nzita · Trending lyrics · Billboard Hot 100

Frequently asked questions

"Moyi etelemi" is credited to José Nzita. Songwriting credits may include additional writers listed on the release; check the credits section on this page for linked collaborators.

"Moyi etelemi" appears on "Kanga Nga Photo".

Visit the José Nzita artist page at /artist/jose-nzita for biography, popular tracks, and links to more lyric pages.