Lyrks
Lyrks
Lyrks
Cover Art

Eau bénite Lyrics by Lutumba Simaro

0

Sangi Pumba
Il est toujours difficile d'être aimé, que d'aimer
Sangi Pumba naye nde kosenga yo
Soki moyen ezali tokabwana
Mabe eleki, motema mobebi eh
Napesa yo liberté osakana
Naboyi miso na nga etala eloko
Eloko ekobunga lobi oh mama
Ngai oyo nakomi nde kozonga
Na sanduku ya makambo na moto
Nalongoli zuwa patience esili eh
Napesa bino permission bobalana
Soki mwana alingi kosimba moto
Botika ye asimba mokolo akozika, akoyeba
Lobi lisusu nakutaki yo na ye
Bras dessus ekopi na monoko
Ofongoli miso otali nga okitisi elongi
Oyoki soni obandi se kolela
Tika hypocrisie ozali na motema moko
Ndenge nini okolinga biso mibale
Okotia nga wapi ?
Bomba mayi na yo ya miso
Okolela masumu na yo
Naboyi osimba nga na nzoto
Maboko na yo matondi makila
Makila ya motema na nga ozokisi
Otubi nga nde likonga eh
Kende basukola yo maboko eh
Epayi ya sango na eau bénite oh mama
Yo moko oponi nzela wana eh
Natombeli yo kaka chance
Epayi na ye zala mwa fidèle
Kosala ye ndenge osali nga te oh
Mwasi azalaka na mibali mibale te
Banda bokoko na biso eh
Kobebisa te sima ozongela ngai
Okokuta nga nasi nabala okopesa nga faute
Soki mokolo mosusu Kinsala
Obuki fleur rose
Atako motema na yango enuna
Kobwaka yango nanu te oh
Tango mosusu se yango ya suka
Oyo etikala na kati ya elanga
Okoya kozonga sima oko regretter
Fleur mosusu ezali te Patrick Mangassa
Longola loboko na litama
Tika kosala hypocrisie
Naboyi pardon na yo ya litsho
Pesa merci na patience na nga
Epayi okei toli napesi yo
Vanda na ndako zela se bomengo
Kobebisa te sima ozongela ngai
Okokuta porte bakanga ye chien méchant
Sangi Pumba, nalobaki na yo
Kokoma kombo na ngai likolo ya zelo te mama
Surtout tango mbonge ezali koya
Koma yango likolo ya libanga
Ata ba martin-pêcheurs bakoya kotanga
Oyebi bien que mama ngai nazali mbisi
Ya solo nalula mayi
Kasi oyo ya moto nalingaka te
Yo moko oponi nzela wana eh
Natombeli yo kaka chance
Epayi na ye zala mwa sérieuse
Kosala ye ndenge osali nga te oh
Mwasi azalaka na mibali mibale te
Banda bokoko na biso eh
Kobebisa te sima ozongela ngai
Okokuta nga na si na bala oko pesa nga faute
Sangi Pumba, na maboko na ngai osalaki mobulu
Lokola mwana nionso akosalaka na ndako ya tata na mama
Kasi naboyaka yo te
Epayi okei lakisa ye fidélité chérie
Kosala ye ndenge osali nga te nde ozui bomengo
Nazali kobanga noki oboya yo
Okoya kotelengana ya pamba, ekosala ngai mpasi
Oyebi que, nalingaki yo mingi
Bomba mayi na yo ya miso eh
Okolela masumu na yo
Naboyi osimba nga na nzoto
Maboko nayo matondi makila
Makila ya motema na nga ozokisi
Otubi nga nde likonga eh
Kende basukola yo maboko
Epayi ya sango na eau bénite oh mama
Eh eh
Eeeeehh
Oyo malchance
Oyo lisuma
Eh eh
Eeeeehh

About “Eau bénite” by Lutumba Simaro

Read the complete lyrics to "Eau bénite" by Lutumba Simaro. On Lyrks you can follow along with the full text, explore the artist's discography, and discover related songs. The track is often categorized under Congo, Pop.

"Eau bénite" is performed by Lutumba Simaro. This page provides the full lyric text for fans who want to sing along, study the songwriting, or compare versions across releases. Lyrks organizes lyrics by artist and song slug so you can bookmark and share a stable URL. Music lyrics help listeners connect with emotion, narrative, and rhythm in a track. Whether you are learning English, researching a favorite chorus, or preparing for karaoke, having accurate line breaks and section labels (verse, chorus, bridge) makes the experience easier. We link to the official artist profile on Lyrks where available, including biography snippets, top songs, and chart placements when we have that data. If you enjoy "Eau bénite", explore more songs by Lutumba Simaro using the links below. Chart and trending pages on Lyrks highlight what listeners are searching for this week. For copyright or correction requests, see our DMCA and contact pages.

View all songs and biography for Lutumba Simaro · Trending lyrics · Billboard Hot 100

Frequently asked questions

"Eau bénite" is credited to Lutumba Simaro. Songwriting credits may include additional writers listed on the release; check the credits section on this page for linked collaborators.

Album information for "Eau bénite" is not available in our database yet. You can still read the full lyrics on this page.

Visit the Lutumba Simaro artist page at /artist/lutumba-simaro for biography, popular tracks, and links to more lyric pages.