Lyrks
Lyrks
Lyrks
Cover Art

Mabele (Ntoto) Lyrics by Lutumba Simaro

0

Soso eleli eh soso ekolela ngoya oh
Soso ekolela oh bandoki bazongi ndako
Sima ya mwa ngonga tongo ekotana
Tongo ekotana oh ndeko ya makambo
Basusu na bisengo basusu na mawa
Wapi yo Mbole oh
Kady opesi kanda esika na motema
Bougie ekotangisaka pinzoli po na pasi
Eleli pasi ya moto ngai naleli ya lolango
Okotiaka kobanza tiki moto akobela
O pona yo e bolingo eleki metele mama
Mabele dis Zwani
Mabele
Moto na bolenge alingi asala économie
Azali nde kobanza mokolo akokoma mobange
Akoma mobange achangé nde makanisi
Alobi aliya falanga na ye nionso abomba
Noki etikala o na ba oyo bamonaki pasi te basakana na falanga
Mabele nga nalela ye
Mabele mabele ye ye ye ye
Mokolo nakokoma mobange Masivi
Nayebi nakotambola na nzete na balabala
Po nasengaka likuta nga nabikela
Basusu batunaka soki nga nabalaki te
Basusu batunaka soki nga nabotaki te
Ba oyo nakabelaka bakomi nde koseka ngai
Nakipa te oh Nzambe nasalaka la vie ya sans souci
Mabele mabele mabele ye ye ye ye
Mabele oh dis Lumengo ye eh
Mabele dis (…)
Mabele oh Djitatima ye ye ye
Mabele oh
Mokolo nakokufa kake ekobeta
Djitatima yo olobelaka bato maloba na nga yasuka
Moto na nga bakamata basala monument
Soki mopaya aye balobela ye sango
Bambanda bakosepela basi nga natiki
Ba familles bakosepela biloko nga natiki
Binemi bakoloba apusaka lofundu
Ebembe ya soso matanga te
Nalanga nzembo nalanga makambo
Mabele
La vie na ngai o oyo ya sans souci
Mwasi na ngai nzinzi famille na ngai mabele
Nawuta na mabele nakozonga na mabele
Mokolo nakokufa nayebi nakopola
Baliaka na ngai bakokanga zolo na nsolo
Bamelaka na ngai bakokima kosukola ngai
Ebembe ya Massiya ata bokimi e banzinzi bakolela ngai
Nazali na confiance eh
Mabele
La vie na ngai oyo ya bayanke
Falanga nasalaka ya mboto na lituma
Mwasi aboya nga kasi kopo ya masanga ve
Etoko na ngai nasomba po na nkiriba
Tokoluka tozipa miso tongo etanela
Namesana kolata kaki na lipapa
Oh po nayebi eh mokolo tokokufaka tokendeke na drap ya pembe
Ata ozali riche (…)
Mabele ngai nalela ye
Ye ye ye ye mama pokwa ekomi eh moyi mokota
Butu ekoyinda mokolo mwa bandoki banganga
Libala oyo ya mwana na kati eh
Masuwa ekokufaka libongo ekotikalaka
Mama na Lola tangelaka mwana kombo ya Papa Masiya
Mokili ekokufa masumu eleki
Kasi kombo ya Nzambe ekotikala seko
Mondele asala mandoki ya koboma bato
Kasi ya koboma vérité mondele akoki te
Mabele oh nga nalela ye
Mabele mabele mabele ye ye ye ye
Mabele oh mabele
Soso eleli e soso ekolela ngoya oh
Soso ekolela bandoki bazongi ndako
Sima ya mwa ngonga tongo ekotana
Tongo ekotana o ndeko ya makambo
Basusu na bisengo basusu na mawa
Wapi yo Mbole oh
Koko opesi kanda esika na motema
Bougie ekotangisaka pinzoli po na mpasi
Eleli pasi ya moto ngai naleli ya bolingo
Okotiaka kobanza (…) moto akobela
O pona yo e bolingo eleki metele mama
Mabele nga nalela ye
La vie na ngai y'oboya sans souci eh
Mwasi na nga nzinzi famille na nga mabele
Nawuta na mabele nakozonga na mabele
Mokolo nakokufa nayebi nakopola
Baliyaka na ngai bakokanga zolo na nsolo
Bamelaka na ngai bakokima kosukola nga
Ebembe ya Massiya ata bokimi eh banzinzi bakolela ngai
Nazali na confiance eh
La vie na nga y’oboya bayanké
Falanka nasalaka ya mbenda na likaya
Mwasi aboya nga kasi kopo ya masanga te
Etoko na ngai nasomba po na nkiliba
Namesana kolata kaki lokola Luambo
O po nayebi e mokolo tokokufaka tokendeke na drap ya pembe
Ata ozali moto ya mbongo
Mabele mabele mabele
Yeyeyeyeye mama
Pokwa ekomi moyi ekokota
Butu ekoyinda mokolo mwa bandoki banganga
Libala oyo ya mwana na kati eh
Masuwa ekokufaka libongo ekotikalaka
Mama na Lola tangelaka mwana kombo ya Papa Massiya
Mokili ekokufa masumu eleki
Kasi kombo ya Nzambe ekotikala seko
Mondele asala mandoki ya koboma bato
Kasi ya koboma vérité mondele akoki te
Mabele mabele mabele e
Mabele nga nalela ye
Mabele mabele Djitatima ye ye
Mabele o
Mabele o nga nalela
Mabele

About “Mabele (Ntoto)” by Lutumba Simaro

Read the complete lyrics to "Mabele (Ntoto)" by Lutumba Simaro. On Lyrks you can follow along with the full text, explore the artist's discography, and discover related songs. The track is often categorized under Pop.

"Mabele (Ntoto)" is performed by Lutumba Simaro. This page provides the full lyric text for fans who want to sing along, study the songwriting, or compare versions across releases. Lyrks organizes lyrics by artist and song slug so you can bookmark and share a stable URL. Music lyrics help listeners connect with emotion, narrative, and rhythm in a track. Whether you are learning English, researching a favorite chorus, or preparing for karaoke, having accurate line breaks and section labels (verse, chorus, bridge) makes the experience easier. We link to the official artist profile on Lyrks where available, including biography snippets, top songs, and chart placements when we have that data. If you enjoy "Mabele (Ntoto)", explore more songs by Lutumba Simaro using the links below. Chart and trending pages on Lyrks highlight what listeners are searching for this week. For copyright or correction requests, see our DMCA and contact pages.

View all songs and biography for Lutumba Simaro · Trending lyrics · Billboard Hot 100

Frequently asked questions

"Mabele (Ntoto)" is credited to Lutumba Simaro. Songwriting credits may include additional writers listed on the release; check the credits section on this page for linked collaborators.

Album information for "Mabele (Ntoto)" is not available in our database yet. You can still read the full lyrics on this page.

Visit the Lutumba Simaro artist page at /artist/lutumba-simaro for biography, popular tracks, and links to more lyric pages.