Lyrks
Lyrks
Lyrks
Cover Art

Trahison Lyrics by Lutumba Simaro

Trahison

0

Mokili nga naya bandeko nakuti makambo
Lelo nga nakoyemba ngo
Mobembo nga naya na mokili namoni makambo
Yango nga nakoyemba ngo
Na nzela ya mokili toyaka mboka mboka
Moto na libongo na ye akoki te
Tobotama na mokili moto na ngonga na ye
Moto na chance na ye na elongi na ye
Toyaka na mokili tozali nde bapaya
Mabele yango nde ekoyambaka biso
Mabele oh oh mabele tokobwakelaka soyi eh
Mabele oh ye mabele ekobombaka bosoto na biso
Mabele oh ye mabele ekoboyaka ebembe te
Mabele oh Patrick Mangassa bakokunda yo na mbanda sе esika moko
Mabele oh oh na cimеtière tokosalaka zuwa te
Mabele oh ye soki bakundi molongani pembeni ya mbanda
Mabele oh oh mabele tokoniataka yango nde ekokundaka biso Pepe eh
Mokolo tokobalanaka na ndako ya Nzambe
Liboso ya kobenisa biso sango alobaka boye
Bobalani pour le meilleur et pour le pire
Bosangisi nzoto bokomi moto moko
Kasi mokolo ya liwa nini tokomonaka
Menuisier akosala sanduku se ya moto moko
Bakokunda moko, moko akotikala
Ata aleli lokola akufa
Kasi akolinga te bakunda ye sanduku moko
Na molongani na ye
Trahison oh Abbé Jacques, wapi libala sango olobaka
Trahison oh ye, bobalani pour le meilleur et pour le pire
Trahison oh Abbé Mulumba pour le meilleur pour le pire
Trahison oh Tshito Tshima, trahison oh sebene
Kasi na ndako ya Nzambe bakotunaka mituna te
Sima ya losambo misa esili
Tokobimaka se na liloba moko biso nionso amen
Guy Mayolase oh eh liwa lokola tango tokobotamaka
Mimie Ilumbe eh ye moto na mokolo na ye na ngonga na ye
Koko Ngoma eh ye libala se tango tozali na bomoyi
Varmosi eh ye ba veuves pe bazali na droit ya la vie
Eloko oyo bolingo eloko mabe
Ekokomisaka moko nde zoba
Ekotika biteni nionso ya nzoto
Ekopona motema ekoniokolo yango
Ekomema yo banzela oyo oyebi te
Ekomema yo ti na frontières
Ya bamboka oyo oyebi kombo te oh
Ekopepa yo loboko ekati ngambo
Moleki nzela ye wana akei
Kolinga pasi eh nalingaka baninga ba trahir nga
Bolingo pasi eh na libala bafuti nga na infidelité
Mbongo ye ye ye eh mbongo
Nalingaka mbongo na vie na nga
Mbongo ye ye ye eh mbongo
Nalukaka mbongo na vie na nga
Mbongo elakisi ngai infidélité
Lelo na poche na nga lobi ya Beverly
Lobi na poche ya Tedy Kinsala
Lobi kuna na poche ya Franck Mupezo
Lobi kuna na poche ya Guy Mayolase
Ekosuka na poche ya Pepe Kalle
Namema ye na bar akomi kuna atikali
Apesi nga masanga abo kozonga ndako
Tokende na zando tokoma kuna atikali
Aluli ba commerçants abo kozonga ndako
Mbongo ye ye ye eh mbongo
Eh mbongo eh infidèle
Dokotolo apekisi nga lelo masanga
Likolo ya maladi oh oh, cousin ya commerçant
Dokotolo apekisi nga lelo cigarette
Bandeko oyo mibale natikala na bango
Baye naliaka na bango tosalaka sekele
Kaka bango lisusu ba trahir nga
Ba familles na baninga oyo nasalisaka
Soki nazangi bakondima ngai te oh
Bakanisi koyebana ezali nde mbongo
Koyebana eh
Koyebana ezali nde ngambo
Basangisi eh
Basangisi lokumu na nga na mbongo
Dokotolo eh Ingila eh
Nalingaka masanga eboteli nga maladie
Cigarette ndenge moko
Nalingaka cigarette ebebisi nga santé
Natikala eh nga moko na mokili
Lokola moyi ebotama na ndeko te
Maladi eh yo kotungisa nga
Bakokunda nga na yo libulu moko
Maladi eh okoniokolo nga
Tokokende nga na yo sanduku moko
Maladi eh

About “Trahison” by Lutumba Simaro

Read the complete lyrics to "Trahison" by Lutumba Simaro from the album "Trahison". On Lyrks you can follow along with the full text, explore the artist's discography, and discover related songs. The track is often categorized under Congo, Pop.

"Trahison" is performed by Lutumba Simaro. from the album "Trahison" This page provides the full lyric text for fans who want to sing along, study the songwriting, or compare versions across releases. Lyrks organizes lyrics by artist and song slug so you can bookmark and share a stable URL. Music lyrics help listeners connect with emotion, narrative, and rhythm in a track. Whether you are learning English, researching a favorite chorus, or preparing for karaoke, having accurate line breaks and section labels (verse, chorus, bridge) makes the experience easier. We link to the official artist profile on Lyrks where available, including biography snippets, top songs, and chart placements when we have that data. If you enjoy "Trahison", explore more songs by Lutumba Simaro using the links below. Chart and trending pages on Lyrks highlight what listeners are searching for this week. For copyright or correction requests, see our DMCA and contact pages.

View all songs and biography for Lutumba Simaro · Trending lyrics · Billboard Hot 100

Frequently asked questions

"Trahison" is credited to Lutumba Simaro. Songwriting credits may include additional writers listed on the release; check the credits section on this page for linked collaborators.

"Trahison" appears on "Trahison".

Visit the Lutumba Simaro artist page at /artist/lutumba-simaro for biography, popular tracks, and links to more lyric pages.